Likita po ya banso : « Nzambe alingi apesa na banso Bokónzi bwa ye"
Jean-René B.- Kinshasa
“Lisolo moko ekopesa elikya”; na mobu eye ya zubilé eye etiami na elembo ya elikya, nini ya koleka malamu ‘te lisese eye ya basali ya elanga ya vino eye Léon ya Zomi na Motoba alobaki lelo mokolo ya misato na tongo na esika ya Santu-Petelo, liboso ya bandimi ebele? Kati na bango bilenge bebo, na bango Pápa alobaki bazela te pe “bayanola na esengo na Mokonzi oyo akobenga bango ya kosala na elanga ya vino”. “Kozela te, gúmba maboko ya simisi, zambi Mokonzi azali ngolu pe okoyoka mawa te! Na kosala na elanga ya vino, okozua eyano moko na motuna ya mozindo eye okumbaka yango kati na yo: ntina nini ya bomoi na ngai?”, abwakelaki bango.
Bilenge, pe bakristu banso, atako mibu boni bazali na yango, bazali lokola basali baye bakosala na elanga ya vino ya moteyi. Tango mosusu, bazali kozua ntina ya bomoi na bango te, bazali komona ‘te bazali na ntina te, bamesani te, bayebi bango te to bazali kosepela na bango te lokola basali baye bazali kozela na esika ya zando, elobaki Santu-Pápa. Bobangi ya kokende na zando ena, ezali ya “komisombisa na oyo akoya liboso”, nzokandé “Mokonzi akoyebisa biso ‘te bomoi na biso ezali na motuya pe alingi kosunga biso ya komona yango”, elimbolaki ye.
Nzambe alingi bomoi na biso
Elongi ya moteyi, “moto moko azali na ezaleli eye tomeseni na yango te oyo ekokamwisa pe ekotuna”, ezali eye ya “mokonzi ya mosala oyo alembaka te” oyo alingi kotia “boyokani moko” na moko moko ya basali pe na oyo “akoluka kopesa ntina na bomoi na ye”. Yango wana akobima mbala ebele na mokolo po na kokende koluka bango, pamba ‘te azali kolikia na bango. “Atako tango tozali komona ‘te tokokoka kosala kaka moke na bomoi, wana esengeli kosala yango. Ezali kaka na likoki ya kozua ntina moko, zambi Nzambe alingi bomoi na biso”, elobaki episkopo ya Roma.
Na moko moko ya basali bina, moteyi akopesa eye ezali sembo. Nzokandé, “nini yango ezali sembo?”, emitunaki Pápa. “Po na mokóló ya elanga ya vino, elingi koloba po na Nzambe, ezali sembo ‘te moko moko azua eye esengeli po na kobika”, esembolaki ye. Ya solo, “basali ya ngonga ya liboso basepeli te: bazali komona kitoko ya elembo ya mokonzi ya mosala te. Ye azangaki sembo te, kasi azali kaka moto molamu, atalaki kaka elonga te, kasi posa lokola. Nzambe alingi apesa na banso Bokonzi bwa ye, elingi koloba bomoi etonda, ya seko pe ya esengo”, ebetaki nsete Santu-Pápa. Po na episkopo ya Roma, “Yezu akosala classement te, na oyo afungoleli ye motema na ye akomipes mobimba”.
Kozela te po na koyanola na mbela ya Nzambe
Soki baye bayaki sima bafutami lokola baye bayaki liboso, pona nini kobanda kosala sik’oyo, tokoki komituna. Léon ya Zomi na Motoba atangi bongo santu Augustin: “Po na nini okozela kolanda oyo azali kobenga yo, tango oyebi ‘te mbano ezali kasi mokolo eyebani te? Keba ‘te yo moko omipimisa, na bozongisi tango inso, eye ye akopesa yo na lolenge ya elaka na ye”. Pe Pápa akobianga liboso ya kosukisa: “Tosenga na Mokonzi ‘te abima lisusu pe akutana na biso esika tozali kozela ye”.