Komonisa pasi (Abus): po na episkopo ya lokumu O’Malley, Eklezia ekotala liboso liboso baye bazali na pasi
Jean-René B.-Kinshasa
Na oyo etali bobateli ya bana na makambo ya bomonisi bana pasi (abus), maye Eklezia ekotala liboso liboso “bizali kaka yango wana”, elobi episkopo ya lokumu Seán O’Malley: “Tokomeka kotala liboso liboso baye bazali na pasi (victimes) na mabota na bango”. Alobaki pe posa ya komona makambo bizala polélé, bizaleli ya kondima mikumba pe ya bolakisi lokola maye ya yambo mpenza po na Eklezia. Eklezia ezali kokoba kosala makasi po na boluki lolenge ya kotala likambo ya bomonisi pasi na bana pe bato bazanga makoki.
Episkopo ya lokumu amoni ‘te ezali na ntina ‘te bato bayeba ‘te, “Eklezia, na etinda na ye, esengeli kozala elembo ya bolingo pe ya mawa ya Nzambe pe, po na wana, botali pe bobateli bana pe bilenge bisengeli bizala o kati ya etinda na biso”. Abeti nsete na bolobi ‘te bato bakoyoka nsango ya Eklezia “kaka soki bandimi ‘te tozali kobanza bango. Tozali kobanza po na bana na bango. Tozali kobanza na bobateli bana na bango”.
Episkopo ya lokumu O’Malley, okoki koyebisa biso lolenge nini Commissio po na bobateli bana ezali kosala mosala na yango?
Ezali esengo ya kozala elama ya Commissio ena ba mibu ebele pe ya kozala mokambi na yango. Ezali mpenza na bosengi ya Papa François ‘te Commissio esalemaki. Bituluku (groupes) misato ya bato bisalaki commissio, bikolakisa bato ya mokili mobimba, mingi kati na bango bazalaki na boyebi mosala ya bobateli bomwana. Commissio ezalaki o kati ya bilama (membres) na ye baye babika na pasi pe baboti ya baye bayoka pasi. Yango ezalaki na ntina mingi po kozala na bokutani na lisanga ya baye babika pe kososola maye bango bayebi pe lolenge Eklezia ayanolaki pe atalaki makambo ya mabe bisalemaka na basango na Eklezia
Na mibu mina, mosala ya commissio ekolaki. Mosala na biso esengelaki tosala ezalaki ya kopesa Pápa toli na likambo ya bobateli. Tomipesaki lisusu makasi na bolakisi ya Eklezia, mingi mingi na bakambi, po na kosunga bango na bososoli nini wana bobateli. Tozalaki kati na baye babongisaki pe basalaki milongo minene po na kotombola botali pe bobateli ya bana pe bilenge.
Kala mingi te, tozalaki lisusu na bokomi mokanda (rapport) ya mobu po na kotala eye elekaki na Eklezia na likambo ya bobateli, bilonga na biye bibongi te. Mibu miye mileki, tosali mingi na Eklezia ya Sudi, epayi wapi likambo ya bobateli ebandi kolobama sik’oyo pe epayi wapi ba Eklezia bebo bazangi makasi makoki. Commission esalaki bongo esika ya kobatela mosolo. Tozui lisungi ya ba masanga ya ba episkopo pe bisalelo kotoliko misusu po na kopesa mbongo na ba centres Memorare zambi ya koteya bato na bikolo bina, ya kosunga bango ya bobongisi ba politiki, ya koyamba mafunda (plaintes) pe ya botali baye bazali na pasi, mabota na bango pe masanga na bango.
Na ba mibu, biloko bina binso bimataki pe, na Praedicate Evangelium, Commissio, eye ezalaki liboso na bonsomi, ekomaki bongo elama ya dicastère etali likambo ya Boyambi, yango efungoleli biso ba nzela misusu. Esungaki biso po na lisolo na ba dicastère misusu pe na bosungi ya bokolisi likambo ya bobateli o kati ya Vatican.
Mibu mibale biye bileki, tomipesaki na mibembo ad limina. Mibu itano nionso, lisanga ya ba episkopo moko moko ekosangana na Roma na bakambi ya ba dicastère pe na Santu-Papa, wana bakosala mokanda (rapport) na eye elekaki mibu mitano mileki na ba dioceze na bango. Sik’oyo mosala na biso ezali ya kotala ‘te bobateli ekoti na kati ya mokanda ena. Ezalaki na motuya makasi kozala na mibembo ad limina, ba episkopo bakoya kokutana na bilama ya Commissio.
Ezali malamu komona posa ya ba episkopo ya koyeba lisusu pe ya kozua lisungi na likambo eye. Kasi, ba episkopo bazali bango moko pe bazali kozua bango moko mikano ya politiki ya pasi. Yango ekomonana na mabungi pe/to, tango mosusu, na bosali eloko te.
Na yango komeka kolendisa masanga ya ba episkopo pe kotombola bozali ya ba laiki na bobateli na ba dioceze ya mokili mobimba ezalaki, nakanisi, lisungi ya ntina ya Commissio.
Nakanisa ‘te maloba ya ba Pápa bizalaki na ntina. Ya solo, bapanzi nsango ya mokili pe ata baye ya Eklezia basungi makasi po na kosala ‘te bato bayeba makambo yango. Ezalaki ya solo pasi makasi, kasi ezali likambo moko ya ntina. Bosolo ezali eye ekozongisa biso bonsomi, lokola ba Nsango Ndámbo bikoloba. Mosala ya bapanzi nsango ezalaki na motuya. Kasi mbala ebele, ba katoliko bayambi mango na bokakatani.